Oyebi yango ? Bokono ya SIDA ezwamaka lolenge nini ?

Transcription

Oyebi yango ? Bokono ya SIDA ezwamaka lolenge nini ?
Oyebi yango ?
• VIH ezali mikolobe oyo ezali kopesa SIDA. SIDA
ezali bokono boye bo kobundisa lolenge nzoto
na biso emibatelaka. Ezali kowuta na mikolobe
ebengami VIH (Virus de l’Immunodéficience
Humaine).
• Na mokili, koleka 40 000 000 bazali na bokono
ya SIDA.
• Ezali na nzela moko ya koyeba soki ozali na
mikolobe eye : kotalisa makila.
• SIDA esalisamaka kasi ebikisamaka te.
• Ba kisi ya mikolo oyo ekoki kosalisa bato oyo
bazali na bokono ya SIDA mpe kobakisa mikolo
na babeli.
Bokono ya SIDA
ezwamaka lolenge nini ?
Bokono ya SIDA ezali na kati ya makila, na kati
ya mayi ya nzoto ya mobali oyo ebimaka tango
asangani na mwasi (atanamayi oyo ebimaka mwa
eke liboso na kosangisa nzoto na ye na mwasi), na
mayi ya nzoto ya mwasi (mpe na kati ya makila oyo
mwasi abimisaka sanza nyonso), na motoki ya lidusu
ya masoko, na miliki ya mabele ya basi.
Mikolobe ya SIDA ezwamaka
• Soki bato basibani na nzela ya masoko, na nzoto
ya mwasi to na monoko mpe bami bateli te ;
• Na ko kabola tonga, zoloko, mpe na biloko okoki
ko kata na yango ;
• Na kotia makila oyo ezali na bokono, too kosalela
biloko ya kotuba na yango oyo etokisami te ;
• Kowuta epayi ya mama mpe ezui mwana tango
na zemi , tango na kobota mpe tango ya komelisa
libele.
SIDA ezwamaka te na
• Ekopi, kosu kosu, kosala aswu, soyi, mayi ya
miso ;
• Kopesa mbote na maboko mpe koyambana ;
• Kosalela lutu, mbeli, fourchette, basani, kopo,
bizipeli, kosalela WC na kikoso moko ;
• Kosua ya ba nyama keke .