OZALI KOKANISA MBOKA NA YO?
Transcription
OZALI KOKANISA MBOKA NA YO?
OZALI KOKANISA MBOKA NA YO? Programe Bozongi Mboka ekoki kokomisa yo kuna. Programe oyo ebengami ‘bozongi-mboka’ ekosalisa yo mpona kobongisa kozonga na yo na mboka na yo. Lisusu, Fedasil ekolandela sitwasion na yo pe ekoki kopesa yo lisungi ya ndenge mingi. Olingi oyeba mingi? Benga 0800 32 745 (ya ofele) to senga bayamba yo na Guichet Retour 57 Chaussée d’Anvers, 1000 Bruxelles, kobanda 9h30 ti 16h This project was realized with the support of the European Refugee Fund Progress by Return 1. Bozongi mboka na mokano na yo moko elingi koloba nini ? Bozongi mboka na mokano na yo moko ezali mpona ntina ya bapaya nyoso oyo bazali na ndingisa ya kovanda na mboka Belgique te. Yo moko nde okopona kozonga na mboka na yo. Mobembo yango esalamaka kaka ndenge moko na mibembo nyoso. Bakonzi ya mboka na yo bakoyeba te ete ozali koya. Eloko pe kobanga ezali te soki obongoli makanisi na nsuka mpe olobi olingi lisusu kozonga na mboka na yo te. 2. Nakoki kosenga kozonga na mboka na ngai ndenge nini ? Mpona kozwa liyebisi to kosenga kokutana, benga na nimero ya ofele 0800 32 745. Okoki mpe koya yo moko na Guichet Retour kobanda na 9h30 ti na 16h, na Chaussée d’Anvers 57, 1000 Bruxelles (Dispatching Fedasil). Mosali moko ya Fedasil oyo atalaka makambo ya bozongi mboka akoyanola mituna na yo mpe akosalisa yo obongisa bozongi na yo na mboka na yo. Keba ! : osengeli koya na mikanda na yo nyoso oyo ezali na ntina. 3. Nani akobongisa bozongi na ngai na mboka? Fedasil abongisaka programe ya bozongi mboka soki yo moko olingi. OIM (Organisation internationale ya Migrations) mpe abongisaka bozongi ya bato na mboka na bango (na mpepo, to na bisi pona bikolo ya Balkans). OIM elongo na Caritas bandimi kosalisa yo soki okomi kuna na mboka na yo. 4. Esengeli kofuta mbongo? TE, biloko oyo okofutela yango mbongo te: • tike ya mpepo / tike ya bisi • kokende na yo ti na libanda ya mpepo / to na gare ya bisi • Mokanda ya mobembo (yo moko okokende koluka yango kasi bakozongisela yo mbongo na ntango ya mobembo). Lisusu, bato oyo bawuti na bamboka oyo esengaka viza mpona kokota na Belgique (longola Kosovo) bakozwa mbano ya bozongi mboka (prime de retour). 5. Nakoki komema biloko na ngai ya kilo boni ? Esengeli kotosa mibeko ya kompani ya mpepo to ya bisi na oyo etali mikumba ya komema : okoki kolekisa ndelo ya mikumba to kilo ya mikumba oyo endingisami mpona moto moko. Na yango kolekisa mikumba ebele te ! 6. Moto akosalisa ngai na mobembo? Ee, na ntango ya kokende, mosali moko ya OIM akoyamba yo mpe akopesa yo tike na yo ya mpepo na mbano (prime) na yo mpe lisusu akokende na yo ti na esika ya kosala contrôle liboso obima na mboka. Moto mosusu mpe akozela yo esika okokoma. Bakosenga yo omema saki moko ya plastike ya OIM mpo moto oyo akoyamba yo kuna akoka kamona yo. 7. Ezali mpasi mingi kobika na mboka na ngai, lisungi nini bokoki kopesa ngai? Tozali na bisika oyo bakoki kosalisa yo na mboka na yo. Fedasil apesaka lisalisi ya ndenge mingi : ezali kolandana na evandeli na sitwasion na yo awa na Belgique mpe na mboka na yo epai owuti. Lisalisi yango etali ndenge nini okoki kobanda kosala mombongo, kofutela yo ba nkisi na lopitalo, kosunga yo mpona kozwa mosala, bongo na bongo… Brochure oyo ezali kolobela bapaya ba oyo bazali na ndingisa ya kovanda na mboka Belgique te. Ekomami na minoko 11 : albanais, arabe, farsi, lingala, pashto, peul, russe, serbe, anglais, français et néerlandais. Ekoki mpe kozwama na nzela ya Interneti na www.retourvolontaire.be.